Yâká kobɔ́ndɛla nangai


Bild "kiswahili:Uetikon_rosenkranz.jpg"Maria losáko,
Otondí grásia
Mokonzi azalí na yɔ̌,
Abɛnísí yɔ̌ yambo ya bǎsí bánsɔ,
Abɛnísí mpé Yésu mwǎna wa yɔ̌ .


Sántu Maria,
mamá wa Nzámbe,
Sámbela mpɔ̂ ya bísó basumúki,
Sikáwa mpé o ntángo ya liwâ lya bísó.
Amen.

Mamá wa Bikolo binso

Mokónzi Yésu Kristo,
Mwǎna wa Tatá
tinda sikǎwa Elímo wa yɔ̌ o mokili.
Fandisa Elímo Sántu o mitéma
mya bikólo binso,
na ntína 'te babika na bobebi,
makama ma mawa mpé na etumba.
Mamá wa Bikólo binso,
óyo batabgaka Maria,
azalá Molobeli wa bísó.
Amen.